gequbao.com

找歌就用歌曲宝

cover

Lokumu Eza Ya Yo - Groupe Adorons l'Eternel G.A.E.L.,Anne Keps

Lokumu Eza Ya Yo-Groupe Adorons l'Eternel G.A.E.L.,Anne Keps.mp3
作词 : Athoms Mbuma 作曲 : Athoms Mbuma Oza Nzambe...
作词 : Athoms Mbuma
作曲 : Athoms Mbuma
Oza Nzambe na bolingo
Obongi na lokumu
Yawhe lokumu eza ya Yo
1. Sala nga nayeba
Baposa ya motema na Yo
Loba nga nayoka
Mabanzo ya molimo na Yo
Bongo nga nakokisa papa
Baposa ya motema na Yo
Bongo nga naloba maloba
Maye ekosimba Yo
Loba nga nayoka
Baposa ya motema na Yo
Simba nga naningana
Na nguya ya loboko na Yo
Bongo na misopa papa
Mabolongo na nse nasanjola
Bongo namitika yaya
Liboso na Yo
2. Sala nga namona
Nguya ya loboko na Yo
Mimonisa na kamua
Kembo ya bonzambe na Yo
Bongo nga natatola
Makoki na Yo Mosantu
Bongo nga nasanjola yaya
Nalolenge olingi
Mimonisa nakamua
Kembo ya elongi na Yo
Simba nga nalenga
Na nguya ya loboko na Yo
Bongo nga naloba maloba
Na maye oyo namoni na Yo
Bongo nga nasanjola
Monene na Yo

3. Sala nga natatola
Nguya ya loboko na Yo
Kokisa nayemba
Bilaka ekoma loyembo
Ndenge Yo osalaka Papa
Yango nde ekoma mabina
Bongo nga natatola papa
Namabota nionso
展开